Psalms 87

Bato nyonso babotama na Siona

Nzembo ya bana ya Korea


1 Atia fondasio na ye
likolo ya ngomba ya bosantu.

2 Yawe alingaka baporte ya Siona
koleka bisika nyonso nyonso ya Zakobi avandaka.

3 Makambo ya nkembo ezali kolobama mpo na yo,
e e vile ya Nzambe

4 Nakoloba mpo na Rahabi
mpe mpo na Babilona na kati ya bato
oyo bayebi ngai ;
Filistiya, Tir, mpe kushi mpe nakolaba :
“Moto oyo abotama na Siona.”

5 Bongo bakoloba boye mpo na Siona :
“Moto oyo mpe wana abotama kati na ye ;
mpe Ye Oyo Aleki Likolo, akotia ye.”

6 Yawe akokoma boye na buku ya bato :
“Moto oyo abotama na Siona !”

7 Lokola bazali kobeta miziki, bakoyemba
“Maziba na ngai nyonso ezali kati na yo.”
Copyright information for LinMNB